Mbótama ntúkú míbalé mua Wikipedia na Lingála

Translate this post
Hbd lnwiki wp

Lokola esakolamakí na Diff na sánzá ya nsambo mpɛ́ na sánzá ya mwambe ó mobú 2024, 9 yanwáli (tǒ mokɔlɔ 9 sánzá ya yambo) etikali mokɔlɔ ya ntina, ya elembo, ó katí ya manáka mpɔ̂ na Wikipedia na Lingála. Mokɔlɔ ɔ́yo ezalí mibú 20 ya bokeli na yangó, ɔ́yo ekumisami mpɔ̂ na mbala ya yambo na mǐso nsima ya bambúla ya kosála yangó kaka na nzelá ya ɛ́ternɛtɛ. Libɔngisi ɔ́yo ezalí na mokáno ya kokumisa misála ya ntina ya bayangeli mabále ya libosó ɔ́yo basálaki mosála monɛnɛ na bokóli na yangó utá ebandeli, Moyogo mpɛ́ Bombo (tɔ̌ Eruedin), misála na bango esálisaki étè Wikipedia na Lingála elongwa na nse mpɛ́ ékola. Kokǒta ya bosungi ya libosó tɔ̌ mpɛ́ likabo ya libosó ɔ́yo ezalisí yango esálemaki na mokɔlɔ 9 sánzá ya yambo ó mobú 2005, lokǒla emonisamí na nkásá ya lisoló. Bazalí mpɛ́ bato ya libosó ɔ́yo babandisi likanisi tɔ̌ libɔngisi ɔ́yo, mbala mosusú kati ya mibú 2006 mpɛ́ 2013.

Nsima ya mibú 12, mokɔlɔ 9 sánzá ya yambo ó mobú 2025, ɔ́yo ekambami na CapitainAfrika, moyangeli ya nsuká ó mobú 2023 ɔ́yo aponami kati ya bato ya lokótá lingála, elɔngɔ́ mpɛ́ na lisangá ya WikiLinguila Community, izalí na mokáno ya kolakisa mɔ̌kɔ́ ya minɔkɔ ya ekólo Kongó, ɔ́yo ezalí mpɛ́ lokótá ya makilá ya bato mingi ya Kongó uta bomwana na bango. Milende wana mizalí komonisa ntina ya kozwa ntángo ɔ́yo esengeli mpɔ̂ na kobɔngisa molulú mɔ̌kɔ́ ɔ́yo ezalí komonana polele mpɛ́ na ntina. Na mikɔlɔ ɔ́yo, Wikipedia na Lingála ezalí na nkásá 4,629 mpɛ́ bato 46 bazó pesa mabɔ́kɔ, ɔ́yo ezalí naíno mokɛ mingi kasi bato ɔ́yo bazalí kosála makambo wana bazalí na elíkya étè ekozala malamu mingi tii mibú 10 mizalí koya.

Likita yangó ezalí mpɛ́ na kati ya esengo kati ya basangani ya lisangá ya WikiLinguila ya kopesana bamposa ya mobú ya siká, kolendisa lisusú boyokani mpɛ́ komipesa mpɔ̂ na kotombola nkótá ya mbóka na nzelá ya misála ya boyokani mpɛ́ ya mateya.

Libɔngisi yangó mpɛ́ emonisi nsuká ya mosála ya Wiki100Impact, ɔ́yo esálemakí na sánzá mísáto, bandá sánzá ya zómi ntino sánzá ya zómi na míbalé ó mobú 2024. Ezalakí na bikamwa ya bikɔlɔ́ 1,600 ya nkásá ya siká, bikɔlɔ́ 800 ya nkásá ebongisami, mpɛ́ bato penɛ ya 30 basálaki misála na ba-wiki mísáto (lnwiki, kgwiki, mpɛ́ luawiki-incubator). Makambo wana emonisi ndenge bato yɔ́nsɔ batondi na motuya mpɔ̂ na misála ɔ́yo mpɛ́ mpɔ̂ na mikɔlɔ mizalí koya. Mosála yangó ezalí lokola libaku ya kosimba sánzá míbalé ó mobú 2025 na ntina ya mokɔlɔ ya lokótá ya makilá.

honour

Na eleko ya mbúla ya mbótama ɔ́yo, lokumu ya kokata límpa ya fɛ́tí epesamaki na OtikolenoiL, molongi ya lisanɔ Wiki100Impact mpɔ̂ na eteni ya Lingála. Likita ɔ́yo ekozala na mokáno ya kosangisá bato mingi koleka, kokómisa boyokani makasi na bandimi ya kelasi mpe ya bobisó, mpɛ́ kobimisa maye matali ndenge ya siká ya kokomisa minɔkɔ na mikanda. Na komitalela maye matali boyokani ya bato yɔ́nsɔ mpɛ́ misála ya boyekoli elɔngɔ́, mateya mpɛ́ bokólaká bisiká ya bomɔ̌kɔ́.

Can you help us translate this article?

In order for this article to reach as many people as possible we would like your help. Can you translate this article to get the message out?